“ MPOKE ” elingi mbongwana ya mbalakaka : mwana ya ndeke, ye suka ya mopaya (étranger) elongo na balandi ya ye banso ya bapaya balongwa mpe batambola yambo ete biso moko tokuta bango kuna.
2. Na makambo matali Mampinga, Polisi mpe misala ya Sécurité.

Bapaya banso bawuta na Rwanda, Ouganda, Tanzanie, Erythrée, Somalie, Zimbabwe, Zambie, Burundi mpe bongo na bongo, babendana bango moko libela libela mpe babima na libanda ya ekolo Congo yambo ete biso tokoma bipai bazali kodondwa lelo ya ofele.
3. Na makambo matali misala ya leta na ba kompani ya leta.

“ MPOKE ” akani se ndenge moko. Oyo nionso amiyebi pe ayebani mopaya, abendana tango naino biso tokomi te. Oyo akozwama akofuta masumu na ye na ndenge ekoki.

4. Na makambo matali misala ya Parlement.

“ MPOKE ” akani boye. Moko moko ya limpinga ya politiki (parti politique) lizwami o Parlement esengeli kotika sasa ipi misala minso pamba te ba député banso bazali kosala lokola ba boy ya mwana ya ndeke ; bango balula mosolo mayele te (corruption) ; bazali ata na likanisi moke te mpo na ba population.

5. Mposa ya “ MPOKE ” .

Biso “ BAKOLO – CONGO ”, na bitinda ya “ MPOKE ” tokani koyingisa bokonzi bwa sika ebengami na lopoto “ AUTORITE DE RESTAURATION ” mpo na kozongisa lokumu mpe bonsomi ya bana banso ya Congo

Na molende ya “ MPOKE ”, tosili kobwakela mwana ya ndeke “ Première SOMMATION ” mpo abendana na malembe tango oyo. Tosili mpe kobimisa mikanda ya yambo tobengi ba “ DECRETS ” mpo na kotumbusa misala ya ekolo o bipai tozali.


Na lolenge totelemaki o mokolo mwa Pasika na Mbandaka, tolingi koyoka soki moke te kombo ya “ NEGOCIATION ”. Mpe toboyi na motema moko likambo ya “ MEDIATION ” mpo totikala na soni mpe somo na médiation ya maseki mobali na kombo ya OBASANDJO ya Nigeria akendeki kosala na bipai ya Kivu. Abinaki na ye mabina ya bitumba ya bapaya bazalaki na sima ya NKUNDABATWARE lokola ete na Congo ba niama ya bitumba basila. Na lolenge basambwisaki ekolo mobimba ya Congo na nzela eye ya négociation ya Obasandjo, “ MPOKE ” elingi lisusu kobebisa tango te na masolo ya négociation to ya médiation : misère ya peuple eleki, bato bakufi trop !

Elonga ezali !

Esalemi boye na Mbandaka o mokolo mwa 27/04/2010

TULUNGIDIKO KATANGA R.
Coordonnateur